‏ Mark 8:31-38

Yesu alobi na tina na kufa na Ye

31Yesu akomaki koteya bango : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye, basengeli koboma Ye, mpe, sima na mikolo misato, asengeli kosekwa.

32Azalaki koloba makambo yango na polele penza.

Bongo Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye : — Koloba bongo te !

33Kasi Yesu abalukaki, atalaki bayekoli na Ye mpe apamelaki Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.

Ndenge nini kolanda Yesu

(Mat 16.24-28; Lk 9.23-27)

34Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai. 35Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu akobikisa yango. 36Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? 37Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ? 38Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.

‏ Mark 9:1

1Yesu alobaki na bango lisusu : — Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya.
Copyright information for LinMNB