‏ Mark 9:33-37

Nani aleki monene ?

(Mat 18.1-5; Lk 9.46-48)

33Tango bakomaki na Kapernawumi, wana bazalaki kati na ndako, Yesu atunaki bango : — Likambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela ?

34Kasi bavandaki nye, pamba te, na nzela, bazalaki penza kotiana tembe mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.

35Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.

36Yesu akamataki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe, sima na Ye koyamba mwana yango na maboko na Ye, alobaki na bango : 37 — Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.
Copyright information for LinMNB