‏ Mark 9:42-48

42 Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.
43 Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko, na esika ete otikala na maboko mibale mpe okende na lifelo, kati na moto oyo ekufaka te, [ 44epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.]
Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.
45Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na lokolo moko, na esika ete otikala na makolo mibale mpe obwakama na lifelo [ 46epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.]
Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.
47Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota na Bokonzi ya Nzambe, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na lifelo 48epai wapi
nkusu ekufaka te,
mpe moto ekufaka te.
Copyright information for LinMNB