‏ Matthew 10:1-9

Bantoma zomi na mibale

(Mlk 3.13-19; Lk 6.12-16)

1Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe mpe ya kobikisa bokono mpe pasi nyonso.

2Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale :

liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo ;
Andre, ndeko ya Petelo ;
Jake, mwana mobali ya Zebede ;
Yoane, ndeko ya Jake ;
3Filipo mpe Bartelemi ;
Toma mpe Matayo, mofutisi mpako ;
Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade ;
4Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.

(Mlk 6.7-13; Lk 9.16)

5Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo : — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari. 6Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele. 7Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene. 8Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.
9 Kati na mabenga na bino, botia wolo te, palata te, mbongo mpe te.
Copyright information for LinMNB