Matthew 10:11-14
11Tango bokokota na vile to mboka moko, boluka moto oyo azali ya kokoka mpo na koyamba bino, mpe bovanda na ndako wana kino tango bokokende. 12Tango bokoti na ndako moko, bopesa bato ya ndako yango mbote. 13Mpe soki ndako yango ezali ya kokoka, tika ete kimia na bino ezala likolo na yango ; kasi soki ezali ya kokoka te, tika ete kimia na bino ezonga epai na bino. 14Soki baboyi koyamba bino na vile moko to na ndako moko, to koyoka maloba na bino, bobima na ndako wana to na vile wana, mpe bopupola makolo na bino.
Copyright information for
LinMNB