‏ Matthew 10:5-14

(Mlk 6.7-13; Lk 9.16)

5Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo : — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari. 6Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele. 7Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene. 8Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.
9 Kati na mabenga na bino, botia wolo te, palata te, mbongo mpe te. 10Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye. 11Na engumba to na mboka nyonso oyo bokokota, boluka moto oyo abongi mpo na koyamba bino mpe bovanda na ndako na ye kino tango bokolongwa. 12Mpe tango bokokota na ndako yango, bopesa bavandi na yango mbote na koloba : « Tika ete kimia ezala na bino ! » 13Soki bavandi ya ndako yango babongi na kimia yango, wana tika ete ewumela kati na bango ; soki te, wana tika ete ezonga epai na bino. 14Soki baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na ndako to na engumba yango mpe bopupola putulu ya makolo na bino.
Copyright information for LinMNB