Matthew 11:2-19
Yesu mpe Yoane Mobatisi
(Lk 7.18-35)
2Wana Yoane Mobatisi azalaki kati na boloko, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo Klisto azalaki kosala ; atindaki bayekoli na ye 3kotuna epai ya Yesu : — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ?4Yesu azongiselaki bango : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bozali komona mpe koyoka : 5bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola. 6Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !
7Wana bayekoli ya Yoane bazalaki kozonga, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane ; atunaki bango : — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ? 8Soki mwa nzete yango te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alati bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko bavandaka na bandako ya bakonzi. 9Kasi bino, bokendeki penza kotala nini kati na esobe ? Mosakoli ? Solo, nazali koloba na bino penza ya solo : aleki kutu ata mosakoli. 10Pamba te, azali moto oyo bakoma na tina na ye :
« Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo
mpo na kobongisela Yo nzela. »
11 Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene. 12Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna. 13Pamba te basakoli nyonso mpe Mobeko basakolaki yango bango nyonso kino na tango ya Yoane. 14Mpe, soki bokoki kondima, boyeba ete ye nde azali Eliya oyo asengeli koya. 15Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! 16 Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu :
17 « Tobetaki baflite,
kasi bobinaki te ;
toyembelaki bino banzembo ya matanga,
kasi bolelaki-lelaki te. »
18 Pamba te, tango Yoane ayaki, azalaki kolia te mpe azalaki komela vino te ; mpe balobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! » 19Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela ; kasi bazali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo.
Copyright information for
LinMNB