‏ Matthew 11:25-27

Yesu abengi bato na mikumba

(Lk 10.21-22)

25Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike ! 26Iyo, Tata, pamba te, kati na boboto na Yo, olingaki ete esalema bongo !
27 Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
Copyright information for LinMNB