‏ Matthew 12:1-8

Yesu mpe mokolo ya Saba

(Mlk 2.23-28; Lk 6.1-5)

1Na tango wana, Yesu alekaki kati na bilanga ya ble na mokolo ya Saba
Mokolo ya Saba : mokolo ya eyenga ya Bayuda, mokolo ya poso na tango ya lelo
. Lokola bayekoli na Ye bakomaki na nzala, babandaki kobuka ble mpe kolia yango.
2Tango Bafarizeo bamonaki bongo, balobaki na Yesu : — Tala bayekoli na Yo ! Bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba.

3Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala, 4ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe ; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama ; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango ; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango ? 5Botikala mpe nanu kotanga te kati na Mobeko ete, na mokolo ya Saba, Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo babukaka mobeko ya Saba, kasi bakweyaka na mbeba te mpo na yango ? 6Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino ete ezali awa na moto moko oyo azali monene koleka Tempelo ! 7Ah soki bososolaki ndimbola ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » bokokaki kopamela te bato oyo mpo ete basali mabe te ! 8Pamba te Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.
Copyright information for LinMNB