Matthew 12:22-27

22Bongo bamemelaki ye moto moko azalaki na milimo mabe, azalaki moto ya kokufa miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye, bongo moto yango akomaki koloba mpe komona.

23Bato nyonso bakamwaki mpe balobaki :

—Moto oyo azali mwana ya David te ?

24Kasi tango bafarizeo bayokaki bongo, balobaki :

—Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belezebule : mokonzi ya milimo mabe !

25Yesu ayebaki makanisi na bango, mpe alobaki :

—Bokonzi nyonso oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekopanzana ; mpe vile nyonso to ndako nyonso oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekoki kowumela te.
26Soki Satana abengani Satana, wana amikaboli kaka ye moko ; bongo bokonzi na ye ekowumela ndenge nini ?

27Soki ngai nabenganaka milimo mabe na nguya ya Belezebule, bongo bato na bino babenganaka bango na nguya ya nani ? Yango wana, bango moko bakozala bazuzi na bino.
Copyright information for LinMNB