Matthew 12:38-39
(Mlk 8.11-12; Lk 11.29-32)
38Bongo ndambo ya balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo balobaki na Ye : — Moteyi, tolingi komona yo kosala elembo moko.39Yesu azongisaki : — Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya mosakoli Yona.
Copyright information for
LinMNB