Matthew 12:9-14
9Tango alongwaki kuna, akendaki na ndako na bango ya mayangani. 10Moto moko azalaki wana, azalaki na loboko ya kokufa. Bongo batunaki ye : —Boni, nzela epesami mpo na kobikisa moto mokolo ya saba ? Batunaki bongo mpo bazwa nzela ya kofunda ye. 11Kasi Yesu alobaki na bango : —Nani kati na bino soki azali na meme moko kaka, mpe soki yango ekweyi na libulu mokolo ya saba, akokita na libulu te mpo na kobimisa yango ? 12Ya solo, moto aleki meme na motuya. Yango wana, nzela ezali mpo nakosala likambo ya malamu na mokolo ya saba ! 13Bongo alobaki na moto yango : —Tanda loboko ! Atandaki yango, mpe yango ekomaki malamu lokola oyo mosusu. 14Kasi bafarizeo babimaki mpe basanganaki mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.Yesu mosali ya Yawe
Copyright information for
LinMNB