Matthew 13:1-15
Lisese ya moloni
(Mlk 4.1-9; Lk 8.4-8)
1Mokolo yango kaka, Yesu abimaki na ndako mpe akendeki kovanda pembeni ya ebale. 2Lokola ebele ya bato bazingelaki Ye, Yesu amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, wana bato nyonso batelemaki na mokili. 3Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese ; azalaki koloba : — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. 4Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango. 5Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te ; 6kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te. 7Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ; 8kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma nkama moko ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma tuku misato. 9Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !(Mlk 4.10-12; Lk 8.9-10)
10Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe batunaki Ye : — Mpo na nini ozali koloba na bango na masese ?11Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te. 12Na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango. 13Tala mpo na nini nazali koloba na bango na masese :
ezali mpo ete atako bazali kotala, bamona te ;
mpe atako bazali koyoka, basosola te.
14 Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami : « Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te ;
miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te !
15 Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ;
bakangi penza matoyi mpe miso na bango,
noki te miso na bango emona,
matoyi na bango eyoka,
mitema na bango esosola,
mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »
Copyright information for
LinMNB