‏ Matthew 13:1-9

Lisese ya moloni

(Mlk 4.1-9; Lk 8.4-8)

1Mokolo yango kaka, Yesu abimaki na ndako mpe akendeki kovanda pembeni ya ebale. 2Lokola ebele ya bato bazingelaki Ye, Yesu amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, wana bato nyonso batelemaki na mokili. 3Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese ; azalaki koloba : — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. 4Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango. 5Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te ; 6kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te. 7Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ; 8kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma nkama moko ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma tuku misato. 9Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
Copyright information for LinMNB