Matthew 13:53-58
53Tango Yesu asilisaki koloba masapo wana, alongwaki kuna 54mpe azongaki na vile na ye. Abandaki koteya bato na ndako nabango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa. Batunaki : —Bwania mpe nguya ya kosala makamwisi oyo azwi yango wapi ? 55Ezali ye te mwana ya salampatie ? Mama na ye kombo na ye Mariya te ? Bongo Zaki, Zozefi, Simon mpe Zude bazali bandeko na ye ya mibali te ? 56Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali na biso awa te ? Yango azwi makambo oyo nyonso wapi ? 57Bongo ye azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi yesu alobaki na bango : —Moprofeta azangaka lokumu kaka na mboka na ye mpe na ndako na ye. 58Bongo asalaki makamwisi mingi kuna te, mpo bazangaki kondima.
Copyright information for
LinMNB