Matthew 14:13-21
Yesu aleisi mibali nkoto mitano
(Mlk 6.30-44; Lk 9.10-17; Yn 6.1-15)
13Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo. 14Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela. 15Na pokwa, bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balobaki na Ye : — Esika oyo ezali esobe, mpe ngonga epusani makasi ! Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka ya zingazinga.16Kasi Yesu alobaki na bango : — Bazali na tina na kokende kuna te ! Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.
17Bayekoli bazongisaki : — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale.
18Yesu alobaki : — Boya na yango awa epai na Ngai.
19Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. 20Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. 21Bato oyo baliaki bazalaki mibali pene nkoto mitano, longola basi mpe bana.
Copyright information for
LinMNB