‏ Matthew 15:1-20

Yesu mpe bokoko ya Bayuda

(Mlk 7.1-23)

1Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye : 2— Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Pamba te basukolaka maboko na bango te liboso ya kolia.

3Yesu azongiselaki bango : — Bongo bino, mpo na nini botosaka te mibeko ya Nzambe, kasi botosaka kaka bokoko na bino ? 4Solo, Nzambe alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. » 5Kasi bino, bolobaka : « Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye : ‹ Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nabonzi yango lokola likabo epai ya Nzambe, › 6abuki te mobeko ya kopesa tata na ye mpe mama na ye lokumu. » Ezali ndenge wana penza nde bozali kokomisa pamba Liloba na Nzambe mpo na kotombola bokoko na bino ! 7Bato ya bilongi mibale ! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino :
8 « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,
kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;
9 basambelaka Ngai kaka na pamba,
mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »

(Mlk 7.14-23)

10Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango : — Boyoka mpe bososola makambo oyo : 11eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.

12Bongo bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye : — Boni, oyebi te ete maloba oyo olobi ebetisi Bafarizeo mabaku ?

13Yesu azongisaki : — Nkona nyonso oyo Tata na Ngai ya Likolo alonaki te ekopikolama. 14Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.

15Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu : — Limbolela biso lisese oyo.

16Yesu atunaki bango : — Bino mpe, boni, bozwi nanu bososoli te ? 17Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo ? 18Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo. 19Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga. 20Ezali makambo wana nde ekomisaka moto mbindo ; kasi kozanga kosukola maboko liboso ya kolia ekomisaka moto mbindo te.
Copyright information for LinMNB