Matthew 15:21-28
Mwasi mopaya andimeli Yesu
(Mlk 7.24-30)
21Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni. 22Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.23Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye : — Bengana ye ; azali kotiela biso makelele !
24Yesu azongisaki : — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !
25Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, sunga ngai !
26Yesu azongisaki : — Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !
27Mwasi yango alobaki : — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango !
28Bongo Yesu alobaki na ye : — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo !
Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
Copyright information for
LinMNB