‏ Matthew 15:32-39

Yesu aleisi bato nkoto minei

(Mlk 8.1-10; Mat 14.13-21)

32Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki : — Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.

33Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ?

34Yesu atunaki bango : — Bozali na mapa boni ?

Bayekoli bazongisaki : — Tozali na mapa sambo mpe ndambo ya bambisi ya mike-mike.

35Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. 36Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye ; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato. 37Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo. 38Motango ya bato oyo baliaki ezalaki nkoto minei, longola basi mpe bana. 39Sima na Yesu kozongisa bato, amataki kati na bwato mpe akendeki na etuka ya Magadani.
Copyright information for LinMNB