Matthew 16:13-20
Petelo andimi ete Yesu azali Mwana na Nzambe
(Mlk 8.27-30; Lk 9.18-21; Yn 6.66-71)
13Tango Yesu akomaki na etuka ya Sezarea ya Filipo, atunaki bayekoli na Ye : — Bato balobaka ete Mwana na Moto azali nani ?14Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli.
15Yesu atunaki bango lisusu : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?
16Simona Petelo azongisaki : — Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi.
17Yesu alobaki na ye : — Esengo na yo Simona, mwana mobali ya Yona ! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo. 18Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te. 19Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo ; nyonso oyo okokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo okofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
20Bongo Yesu apekisaki makasi bayekoli na Ye koloba na moto ete Ye azali Masiya.
Copyright information for
LinMNB