‏ Matthew 17:1-9

Nzoto ya Yesu ebongwani

(Mlk 9.2-10; Lk 9.28-36)

1Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko mobali ya Jake ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi. 2Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole. 3Mbala moko, bamonaki Moyize mpe Eliya bazali kosolola na Yesu.

4Petelo alobaki na Yesu : — Nkolo, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya !

5Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »

6Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi kino na mabele mpo ete somo makasi ekangaki bango. 7Kasi Yesu apusanaki pene na bango, asimbaki bango mpe alobaki : — Botelema, bobanga te !

8Batombolaki miso mpe bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu.

9Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo : — Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
Copyright information for LinMNB