‏ Matthew 17:10-13

(Mlk 9.10-13)

10Bayekoli batunaki Yesu : — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ?

11Yesu azongisaki : — Solo, Eliya asengeli koya mpe akozongisa makambo nyonso na molongo. 12Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.

13Bayekoli basosolaki ete azalaki kolobela bango na tina na Yoane Mobatisi.
Copyright information for LinMNB