Matthew 17:14-21
Yesu abikisi mwana na molimo mabe
(Mlk 9.14-29; Lk 9.37-43)
14Tango bakomaki pene ya esika oyo ebele ya bato bazalaki, moto moko apusanaki pene na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe alobaki : 15— Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi : akweyaka mbala mingi na moto to na mayi. 16Namemaki ye epai ya bayekoli na Yo, kasi bakoki te kobikisa ye.17Yesu alobaki : — Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.
18Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki. 19Bongo bayekoli bakendeki na nkuku epai ya Yesu mpe batunaki : — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ?
20Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [ 21Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.] ▼
▼Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.
Copyright information for
LinMNB