Matthew 19:13-15
Yesu ayambi bana mike
(Mlk 10.13-16; Lk 18.15-17)
13Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango. 14Yesu alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.15Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana.
Copyright information for
LinMNB