Matthew 19:16-30
Bazwi mpe Bokonzi ya Nzambe
(Mlk 10.17-31; Lk 18.18-30)
16Elenge mobali moko apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : — Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo ete nazwa bomoi ya seko ?17Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu ? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.
18Elenge mobali yango atunaki lisusu : — Mibeko nini ?
Yesu azongisaki : — Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te, 19okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
20Elenge mobali alobaki : — Natosaka mibeko wana nyonso ; nasala lisusu nini ?
21Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
22Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. 23Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo ! 24Nazali koloba na bino lisusu : ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
25Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : — Bongo nani penza akoki kobikisama ?
26Wana Yesu atalaki bango, alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !
27Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu : — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo ! Ekozala boni mpo na biso ?
28Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele. 29Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.
30 Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
Copyright information for
LinMNB