‏ Matthew 20:17-19

Yesu asakoli lisusu kufa mpe lisekwa na Ye

(Mlk 10.32-34; Lk 18.31-34)

17Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango wana bazali kotambola : 18« Boyoka ! Tozali solo kokende na Yelusalemi ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko ; bakokatela Ye etumbu ya kufa 19mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »
Copyright information for LinMNB