‏ Matthew 20:29-34

Yesu abikisi bakufi miso mibale

(Mlk 10.46-52; Lk 18.35-43)

29Tango Yesu elongo na bayekoli na Ye balongwaki na Jeriko, bato ebele balandaki Yesu. 30Bakufi miso mibale bazalaki ya kovanda pembeni ya nzela ; tango bayokaki ete Yesu azali koleka, bagangaki : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !

31Bato bazalaki kopamela bango mpo ete bakanga minoko na bango, kasi bango bagangaki lisusu makasi : — Nkolo, mwana ya Davidi, yokela biso mawa !

32Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango : — Bolingi nasala nini mpo na bino ?

33Bazongiselaki Ye : — Nkolo, sala ete tomona.

34Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango ; mpe, mbala moko, bakomaki komona mpe balandaki Ye.
Copyright information for LinMNB