‏ Matthew 21:1-11

Yesu akoti na Yelusalemi lokola Mokonzi

(Mlk 11.1-11; Lk 19.28-38; Yn 12.12-19)

1Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi mpe bakomaki pene ya Betifaje, na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli mibale. 2Alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino ; tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona ane ya mwasi bakanga na singa, mpe mwana ya ane pembeni na yango ; bofungola nyonso mibale mpe bomemela Ngai yango. 3Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe, mbala moko, akotika yango kokende.

4Makambo wana nyonso esalemaki mpo ete maloba oyo mosakoli aloba ekokisama : 5« Boloba na Siona, mboka kitoko :
‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo,
atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi,
na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama
oyo ememaka mikumba. › »

6Bayekoli bakendeki mpe basalaki ndenge kaka Yesu atindaki bango. 7Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango. 8Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela. 9Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi !
Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !

Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »

10Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki ; bazalaki kotuna : — Oyo lisusu nani ?

11Bato bazalaki kozongisa : — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile !
Copyright information for LinMNB