Matthew 22:1-6

Lisapo ya babengami na feti

(Lk. 14.15-24)

1Yesu alobaki na bango lisusu na masapo. Alobaki :

2—Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti mpo na libala ya mwana na ye ya mobali. 3Bongo atindaki basali na ye mpo babenga bato oyo babengamaki nafeti ; kasi bato yango balingaki koya te. 4Atindaki lisusu basali mosusu, mpe alobaki na bango :

“Boloba na bato oyo babengamaki na feti ete nasiʼnabongisi biloko ya kolia. Nabomisi bangombe mpe banyama ya mafuta, mpe biloko nyonso esiʼebongisami malamu. Boya na feti ya libala.”

5Kasi bato oyo babengamaki bamonaki makambo wana pamba, mpe moto na moto akendaki : moko na elanga na ye, mpe mosusu na mombongo na ye. 6Bongo baoyo batikalaki, bakangaki basali na ye, baniokolaki bangompe babomaki bango.

Copyright information for LinMNB