Matthew 22:15-22
Mpako mpo na mokonzi
(Mlk 12.13-17; Lk 20.20-26)
15Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko. 16Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu : — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te ; 17yebisa biso makanisi na yo na tina na likambo oyo : Kolanda mobeko, ezali malamu to epekisami kofuta mpako ya mokonzi epai ya Sezare ?18Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki : — Bato ya bilongi mibale ! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ? 19Bolakisa Ngai mbongo oyo bofutaka na yango mpako.
Bamemelaki Ye mbongo moko ya ebende. 20Atunaki bango : — Elilingi mpe makomi oyo ezali ya nani ?
21Bazongisaki : — Ezali ya Sezare.
Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !
22Tango bayokaki eyano ya Yesu, bakamwaki ; batikaki Ye mpe bakendeki.
Copyright information for
LinMNB