Matthew 22:34-40
Mobeko oyo eleki monene
(Mlk 12.28-34; Lk 10.25-37)
34Tango Bafarizeo bayokaki ete Yesu asukisi Basaduseo, bango mpe basanganaki ; 35mpe moko kati na bango, molakisi ya Mobeko, alukaki kotiela Yesu motambo, atunaki Ye : 36— Moteyi, mobeko nini eleki monene kati na mibeko nyonso ?37Yesu azongiselaki ye : — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso. 38Yango nde mobeko ya liboso mpe eleki monene. 39Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » 40Mibeko nyonso mpe mateya ya basakoli evandi kati na mibeko oyo mibale.
Copyright information for
LinMNB