Matthew 23:4-9

4Bakangaka maboke ya kilo penza mpe batiaka yango na mapeka ya bato ; kasi bango moko basimbaka yango te ata na songe ya mosapi. 5Misala nyonso basalaka, basalaka yango kaka mpo bato bamona bango. Pamba te, bayeyisaka mwa basanduku na bango oyo ekomama mibeko minene, mpe bakomisaka basonge ya banzambala na bango milayi
verset oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.
.

6Na bafeti, balingaka kaka bisika ya kitoko, mpe na Ndako ya mayangani bisika ya lokumu. 7Balingaka bapesa bango mbote na bazando mpe bato babenga bango : “Moteyi”.

8Kasi bino, bondima te ete babenga bino : “Moteyi”. Pamba te, bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko. 9Mpe bobenga moto moko te awa na mokili : “Tata”, pamba te bozali na Tata kaka moko, oyo azali na Likolo.
Copyright information for LinMNB