Matthew 24:15-20
15—Yango wana tango bokomona eloko ya somo, oyo ebebisaka, oyo moprofeta Daniele alobaki, etelemi na Esika ya bosantu—moto oyo azali kotanga ayeba malamu tina ya makambo oyo— 16bato oyo bakozala na Yudea bakima na bangomba. 17Moto oyo akozala likolo ya ndako, akita te mpo na kokende kozwabiloko oyo ezali na ndako na ye. 18Moto oyo akozala na bilanga, azonga te na ndako mpo na kokamataelamba na ye. 19Mawa mingi penza na mikolo wana, mpo na basi oyo bakozala na bazemi mpe baoyo bakozala komelisa bana mabele ! 20Bobondela mpo ete mokolo oyo bokokima ezala na tango ya malili makasi te to na mokolo ya saba ▼▼ saba : yenga ya bayuda.
.
Copyright information for
LinMNB