‏ Matthew 24:15-21

(Mlk 13.14-23; Lk 21.20-24)

15 Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— 16wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; 17tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye, 18mpe tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye !
19 Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele ! 20Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi to na mokolo ya Saba. 21Pamba te pasi ekozala makasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta na ebandeli ya mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
Copyright information for LinMNB