‏ Matthew 24:29-35

(Mlk 13.24-27; Lk 21.25-28)

29 Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka,
« moyi ekokoma molili,
sanza ekongenga lisusu te,
minzoto ekokweya longwa na likolo,
mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
30 Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene. 31Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.
32 Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene. 33Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.
34 Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema. 35Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
Copyright information for LinMNB