Matthew 24:37-41
37 Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na koya ya Mwana na Moto ; 38pamba te liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kobalisa bana na bango, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ; 39bayebaki eloko moko te na tina na oyo elingaki kosalema, kino mpela eyaki mpe ekumbaki bango nyonso.Ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na Moto. 40Mibali mibale bakozala na elanga : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ; 41basi mibale bakozala konika bambuma na enikelo ; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.
Copyright information for
LinMNB