‏ Matthew 24:45-50

45Nani azali mosali ya sembo mpe ya mayele, oyo mokonzi na ye atie ye kapita ya basali mosusu mpo na kopesa bango bilei na tango oyo ekoki ? 46Esengo ekozala mingi na mosali wana, soki tango mokonzi akozonga, akuti ye azali kosala mosala ndenge basengaki ye. 47Nalobi na bino ya solo, mokonzi akotia ye moyangeli ya bilokona ye nyonso.

48Kasi soki azali mosali mabe ; akomiloba : “Mokonzi na ngaiazali koya noki te”, 49mpe soki abandi konyokola baninga na ye ya mosala, kolia mpe komela esika moko na bato oyo balangwaka masanga ; 50bongo mokonzi akozonga na mokolo oyo ye azali kozela te, mpe na ngonga ye ayebi te.
Copyright information for LinMNB