Matthew 26:14-16
Yuda ateki Yesu
(Mlk 14.10-11; Lk 22.3-6)
14Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe 15mpe atunaki bango : — Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino ?Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato. 16Banda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu.
Copyright information for
LinMNB