Matthew 26:20-25
20Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa na bapostolo na yezomi na mibale. 21Awa bazalaki kolia, Yesu alobaki : —Ya solo nalobi na bino : moto moko na kati na bino akoteka ngai. 22Bayokaki mawa mingi, mpe babandaki kotuna ye moko sima ya mosusu : —Nkolo ezali ngai ? 23Yezu azongisaki : —Moto oyo akoteka ngai, ezali oyo atie loboko na ye na sani elongo na ngai. 24Mwana ya moto akokufa ndenge ekomama mpo na ye. Kasi mawa mingi na moto oyo ateki Mwana ya moto. Elingaki kozala malamu mpo na ye soki abotamaki te. 25Bongo Yuda oyo atekaki ye, atunaki mpe : —Moteyi, ezali ngai ? Yezu azongiselaki ye : —E e, osili koloba yango.(Mk. 14.22-25 ; Lk. 22.15-20 ; tala 1 Kor. 11.23-25)
Copyright information for
LinMNB