Matthew 26:57-58
Yesu asambi
(Mlk 14.53-65; Lk 22.54-55, 63-71; Yn 18.12-14, 19-23)
57Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki Ye liboso ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai wapi balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato basanganaki. 58Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; akotaki kati na lopango mpe avandaki elongo na bakengeli mpo na kotala ndenge makambo ekosuka.
Copyright information for
LinMNB