Matthew 26:6-13
Basopeli Yesu malasi na Betani
(Mlk 14.3-9; Lk 7.36-50; Yn 12.1-8)
6Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, 7mwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu. 8Tango bayekoli bamonaki bongo, basilikaki mpe balobaki : — Mpo na nini kobebisa malasi boye ? 9Bakokaki ata koteka yango na motuya makasi mpe kopesa mbongo epai ya babola !10Tango Yesu amonaki bongo, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo ? Asali Ngai likambo moko ya malamu. 11Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te. 12Wana asopi malasi oyo na nzoto na Ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na Ngai. 13Nazali koloba na bino penza ya solo : esika nyonso bakosakola Sango Malamu oyo kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.
Copyright information for
LinMNB