‏ Matthew 26:69-70

Petelo awangani Yesu

(Mlk 14.66-72; Lk 22.56-62; Yn 18.15-18, 25-27)

69Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki : — Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile.

70Kasi Petelo awanganaki na miso ya bato nyonso : — Nayebi te makambo oyo ozali koloba !
Copyright information for LinMNB