‏ Matthew 27:15-26

Bakateli Yesu etumbu ya kufa

(Mlk 15.6-14; Lk 23.13-23; Yn 18.39-40)

15Na feti nyonso ya Pasika, moyangeli azalaki na momesano ya kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kopona. 16Na tango wana, ezalaki na mokangami moko oyo ayebanaki mingi, kombo na ye ezalaki Yesu Barabasi.

17Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango : — Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi ?

18Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakabaki Yesu na maboko na ye. 19Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba : — Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo ; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye !

20Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu.

21Moyangeli atunaki bango lisusu : — Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani ?

Bazongisaki na koganga : — Barabasi !

22Pilato atunaki bango : — Nasala nini na Yesu oyo babengaka Klisto ?

Bato nyonso bazongisaki : — Baka ye na ekulusu !

23Pilato atunaki lisusu : — Mabe nini asali ?

Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : — Baka ye na ekulusu !

(Mlk 15.15; Lk 23.24-25; Yn 19.16)

24Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba : — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.

25Bato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !

26Pilato abimiselaki bango Barabasi ; mpe sima na kobetisa Yesu fimbu, apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
Copyright information for LinMNB