Matthew 27:45-56
(Mlk 15.33-41; Lk 23.44-49; Yn 19.25-30)
45Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba. 46Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ?Elingi koloba : Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? 47Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Ye ; boye bakomaki koloba : — Azali kobenga Eliya !
48Mbala moko, moko kati na bango akendeki mbangu kokamata eponze moko, azindisaki yango na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela. 49Kasi bato mosusu balobaki : — Zela ! Totala soki Eliya akoya kobikisa ye.
50Kasi Yesu agangaki lisusu makasi, mpe azongisaki molimo na Ye. 51Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki, 52bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki : 53ebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango. 54Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
55Basi ebele bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika ; balandaki Yesu longwa na Galile mpo na kosunga Ye. 56Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake mpe ya Jozefi ; mpe mama ya bana ya Zebede.
Copyright information for
LinMNB