Matthew 28:1-6

Yesu asekwi

(Mk. 16.1-8 ; Lk. 24.1-12 ; Jn. 20.1-2)

1Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, sima ya mokolo ya Saba, Mariya ya Magadala mpe Mariya oyo mosusu, bakendaki kotala lilita. 2Mokili eninganaki makasi penza, pamba te anzelu ya Nkolo awutakina likolo, ayaki, alongolaki libanga mpe avandaki likolo na yango. 3Lolenge na ye ezalaki lokola kongenga ya kake, mpe bilamba na yeezalaki pembe makasi penza. 4Somo monene ekotelaki bakengeli : babandaki kolenga mpe bakomakilokola bato bakufi. 5Bongo anzelu alobaki na basi :

—Bobanga te, nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu.
6Azali awa te, asiʼasekwi ndenge alobaki. Boya kotala esika ye alalaki.
Copyright information for LinMNB