Matthew 4:12-17
Yesu abandi mosala na Galile
(Mlk 1.14-15; Lk 4.14-15)
12Tango Yesu ayokaki ete babwaki Yoane Mobatisi kati na boloko, azongaki na Galile. 13Kasi avandaki na Nazareti te ; akendeki nde kovanda na Kapernawumi oyo ezalaki pembeni ya ebale, kati na etuka ya Zabuloni mpe ya Nefitali, 14mpo na kokokisa maloba oyo mosakoli Ezayi alobaki : 15« Mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali,nzela ya ebale monene, pembeni ya Yordani,
Galile ya bapagano,
16bato oyo bazalaki kovanda kati na molili
bamoni pole makasi ;
ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi,
pole ebimeli bango. »
17Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya : « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »
Copyright information for
LinMNB