‏ Matthew 5:1-12

Mateya na likolo ya ngomba

(Mlk 3.13; Lk 6.12-13, 20)

1Tango Yesu amonaki ebele yango ya bato, amataki likolo ya ngomba mpe avandaki. Bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye, 2mpe akomaki kopesa bango malakisi.

Esengo ya kokoka

(Lk 6.20-26)

Alobaki :
3 « Esengo na babola na molimo,
pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !
4 Esengo na bato oyo bazali kolela,
pamba te bakobondisama !
5 Esengo na bato na komikitisa,
pamba te bakozwa mokili lokola libula !
6 Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo,
pamba te bakotondisama !
7 Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa,
pamba te bakoyokela bango mpe mawa !
8 Esengo na bato oyo bazali na mitema peto,
pamba te bakomona Nzambe !
9 Esengo na bato oyo bayeisaka kimia,
pamba te bakobengama bana na Nzambe !
10 Esengo na bato oyo bazali konyokolama likolo ya bosembo,
pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !

11 Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai ! 12Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo ; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.
Copyright information for LinMNB