‏ Matthew 7:16-20

16Bokoyeba bango na misala na bango. Boni, bokoki kobuka mbuma ya vinona nzete ya sende ? To mpe mbuma ya figi na nzete ya nzube ?

17Ndenge moko mpe, nzete nyonso ya malamu ebotaka bambuma ya malamu ; kasi nzete ya mabe ebotaka bambuma ya mabe. 18Nzete ya malamu ekoki kobota te bambuma ya mabe. Ndenge moko mpe, nzete ya mabe ekoki kobota te bambuma ya malamu. 19Nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto. 20Yango wana, bokoyeba bango na misala na bango.

(Lk. 23.25-27)

Copyright information for LinMNB