‏ Matthew 7:7-11

Molende na mabondeli

(Lk 11.9-13)

7 Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ; 8pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango. 9Nani kati na bino apesaka na mwana na ye libanga, soki asengi ye lipa ? 10To nani apesaka na mwana na ye nyoka soki asengi mbisi ? 11Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?
Copyright information for LinMNB