Matthew 8:16-17
16Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso. 17Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki : « Amemaki mokumba ya pasi na bisompe abikisaki biso na bokono na biso. »
Copyright information for
LinMNB